Mokapo 4

1 Yango wana bandeko nanga, ya bolingo, esengo na ngai mpe lokumu na ngai, botelema ngbi kati na Mokonzi. 2 Nasengi Evodie mpe Syntyche, kokota na lisanga na Mokonzi. 3 Na biangi yo masuwa kosunga bango mpo bapesaki ngai maboko na lotomo ya kopanza sango malamu nzela moko na clemen, mpe na ndambo ya ba masuwa oyo batikalaki oyo kombo na bango engulutami na buku na bomoi, 4 Bosepelaka bobele bongo kati na Mokonzi yesu, nabandeli Bosepela. 5 Mokonzi akomi pene, bopolo nayo eyebana na bato nionso. 6 kobanza banza te, kzsi na manso na mabondeli mpe kotonda Nzambe, toyebisa nzambe ba posa na biso. 7 Mpe kimia na Nzambe, oyo eleki mayele nionso ekobatela mitema na bino, na makanisi elongo na Kristo yesu. 8 Na oyo etikali, nionso kitoko, ya malonga, ya bosembo, ya peto mpe elingisami, ya lokumu, mpe soki eloko ya malamu ezali, soki eloko ezui mbano, ebongi na kosanjola , kanisa makambo wana. 9 Botikala ngbina biloko bozuaki, boyokaki, mpe bomonaki epai na nga, bokela yango, mpe bokozua kimia na nzambe. 10 Natondi na esengo kati na Mokonzi sik'awa mpe kozwa lisusu bolamu oyo bolakisi mpona ngai, bokokaki, kokokisa tina ba bino pona ngai, bolakisa kokela yango kasi bozwaki nzela te. 11 Ezali mpona bosenga na ngai te nde nalobi, kasi na lolenge nazali. 12 Nayebi lolenge yakozala na bosenga , to kozala na na bozui, na kati na makombo nionso, na yebi sekele kobika na eleko na bozwi tobozangi. 13 Manso nakoki kosala kowuta na makasi naye. 14 Na bongo, bosalaki malamu kosunga ngai na mikakatano nazalaki na yango, Zambi elongwaki ngai na macedoine, ata lingomba moko te esungaki ngai. 15 Bobele bino ba ndeko ya mbonka Filipe. 16 Tango ezalaki ngai na thesalonik, mpona bosenga na ngai, lisungi ewuti nde epayi na bino. 17 Nazalaki koluka bopesangai eloko te, bobele kokumisa bolamu bosalaki. 18 Nazui manso botindelaki ngai epai ya ndeko Epafodite, nakokelela lisuste, Zambi biloko wana bizali lokola malasi na soslo kitoko mpe mbeke oyo endimani na nzambe. 19 Bongo Nzambe nangai akobakisa na bosenga na bino, bozui kowuta eapi naye, na nkembo na yesu kristo. 20 Sasaipi, nkembo ezonga libela na nzambe Tata na biso Amen. 21 Bopesa Mbote na mosantu moko na moko. kati na kristo yesu. bandeko nionso oyo baza na ngai batindeli bino mbote. 22 Basantu nionso batindeli bino mbote, mingi na ndako na Cesar. 23 Ngolu na Mokonzi yesu kristo ezala na bino nionso Amen.