Mokapo ya 1

1 Polo mpe Timoté basali na ayesu Kristo, epai na babulamai nionso kati na Kristo Yesu bazali na Felipi mpe bakengeli mpe basungi elongo. 2 Ngolu mpe kimia kowuta na Nzambe Tata na biso mpe Mokonzi Yesu Kristo ezala na bino. 3 Natondaka Nzambe na nagi , kati na makanisi nionso na ngai mpo na bino. 4 Tango nionso na bondelaka mpona bino, nazali kobondela na esengo. 5 Mpon na lisanga kati na sango malamu longua na mokolo ya liboso kino sasaipi. 6 Nadimi boye ete mobandisi na mosala malamu kati na bino akosukisa na mokolo ya Yesu Kristo. 7 Ebongi malamu kokanisa bongo mpo na bino yonso, Zambi nazali na biono na motema na ngai, mpo ete bozali nionso bansanganinnan ngai na ngolu kati na kokangama na ngai mpe kati na mlosala na kolob ela mpe kotambolisa nionso malamu. 8 Mpo ete, Nzambe azali motatoli(zeneneke) na ngai ete nazali na mposa na bino nionso na bolilgo ya Kristo Yesu. 9 Nazali kobondela ete bolingo na bino boyikama koleka mingi mingi esika moko na boyibi mpe bososoli nionso. 10 Ete bomekisa makambo makeseni, ete bozala mpeto mpe na ekweli te mpo na mokolo kristo, 11 mpe lisusu mpo ete botondisama na sembo (boyengebene) exuti na nzela na yesu Kristo, na nkembo mpe na lisanzoli na Nzambe. 12 bandeko, sikawa nalingi boyeba ete makambo makwelaki ngai, nasungi kotambolisa sango malamu, 13 Mpo ete bakengeli na ndako ya mokonzi, na basusu ebele, basi bayeli ete nakoti loboko mpo na kristo. 14 Mpe ebele ya bandeko bazali kozua molende mpo na kotiela Mokonzi Yesu mitema, awa bazali komona ngai na boloko, boye bobangaka te mpo na kosakola maloba na Nzambe. 15 Ya solo, basusu, bazali kosakola sango na Yesu Kristo mpo bayokela ngai likunya, mpe koluka baleka ngai na mosala. Kasi basusu bazali kosakola yango na makanisi malamu. 16 Bango basakolaka Kristo na bolingo, bayebi ete natiyami mpo na nzela ya kosakola sango malamu. 17 Kasi basusu basakolaka sango ya Kristo na mitema mibale mpo na komilakisa. Banisi ete bakoki kobakisela ngai ba mpasi lokolo nazali na boloko. 18 Kasi, likambo te! Ata bongo na sepeli mpo na bango nionso oyo bazali kosakola sango ya Kristo, ata makanisi na bango masali mabe. Boye, nakosepela kaka. 19 mpo ete, bazali kosambela mpo na ngai, mpe molimo ya Yesu Kristo azali kosunga nagi, mpe makambo nionso wana ekosuka malamu, mpe nakobika. 20 Naliki ete, nakoyoka soni ata moke te. Sikoyo lokola mikolo nionso, makambfu oyo ezali kokwela nga rkopesa Kristo lokumu ata soki nabiki to na kufi. 21 Mpo ete, mpo na ngai bomoi ezali Kristo. Ata nakufi nazui bomengo kolela . 22 Kasi soki nazali na bomoi, nakoki kosala mosala ya ntina, bongo nayebi te keloko nini nakoki kopona. 23 Mpo ete, makambo oyo mibale esilisi ngai mayele: nakufa mpo nazala esika moko na krsito, yango nde eleki malamu, 24 Kasi, kotkala na mokili eleki malamu mpo na bino. 25 Yango wana nakoki kotia tembe te; nayebi ete na kokokufa te, nakotikala epai na bino nionso mpo bo ndimi na bino ekola mpe eyela bino esengo. 26 Bongo, ntago na kozongela bino, bokozala na sengo mingi koleka mpo na ngai, na lisanga na Kristo Yesu. 27 Bozala na bizaleli oyo elakisaka ete botosaka sango malamu ya Kristo. Boye, naya kotala bino nto naya t, nayoka ete bozali kaka na molende, bosanagni na makanisi moko, mpe bobunda na motema moko mpo na kondima oyo ewuti na sango malamu. 28 bobanga banguna na bino ata moko te. Moende na bino ekolakisa ete bozali kobunga, kasi bionpo bokolika; nyonso ekosalama na makasi ya nzambe. 29 Mpo ete, bolamau nanye ekomisi bino bato ya Kristo: bosengeli kaka kondimela te, kasi komona mpe mpasi mpona ye. 30 Bongo bokomi kobinda etombu oyo ngai mpe na bundaka, ndenge bomonaki liboso, mpe bozali koyoka sikawa na mosika.