MATAYO 2

1 Yesu abotamaki na Bethleem na Yudea na tango ya Mokonzi herode. Ba nganga miloto baytaki na mboka ya ebimelo na moyi, bakomaki na Yelusaleme balobi: 2 «Mokonzi na bayuda abotami na esika nini? Tomonaki monzoto na esika moyi ebimelaka, toyei kogumbamela ye.» 3 Tango nkumu Herode ayoki makambo wana, atungisamaki na motema, ye na bato na nyonso ya Yelusaleme. 4 Herode abeng bakonzi ya banganga nzambe mpe balikisi mibeko nyonso mpe atuni bango: «Wapi esengelaki klistu abotama?» 5 Bayanoli: «Na Beteleme na etuka ya Judea, tala ndenge ekomama na mikanda ya basakoli: 6 "Eh Beteleme, mabele ya Judea, ozali mboka ya pamba te na kati ya bituka ya Judea, solo mokonzi monene akobima na yo, mpe akokamba ekolo ya Isalaele.» 7 Bongo Herode asangisi banganga mayele mpo atuna bango na ngonga nini bamonaki monzoto. 8 sima atindi bango na Beteleme alobi: «Bokende, botuna malamu mpo na mwana. Soki bomoni ye, bokoyebisa ngai mpo nga mpe nakende kogumbamela ye.» 9 Sima ya koyoka nkumu, bakobi mobembo mpe monzoto oyo bamonaki ezalaki liboso na bango mpe e ekei kotelema na esika oyo mwana azalaki. 10 Tango bamoni monzoto, batondisami na esengo mingi. 11 Bayingeli na ndako, bamoni mwana na Maria, mama na ye. Bafukami mpe bakumisi ye. Bafungoli mabenga, bazwi biloko na bango, bapesi ye makabo oyo; wolo, paka mpe malasi. 12 Nzambe akebisi bango bazonga epai na Herode te; yango wana bazongaki na ekolo na bango na nzela mosusu. 13 14 Sima ya bokeyi na bango, mwanze ya mokonzi abemeli Jozefu na ndoto mpe alobi: «Telema, kamata mwana, na mama naye, bokima na Ezipito. Bokenda kofanda kuna kino nakoloela bino mpo ete Herde azali kolukamwana mpo aboma ye.» Bobele na butu wana, Jozefu akamati mwana mpe mama na ye mpe bakimi na Ezipito. 15 Bafandaki kuna ti tango Herode akufaki. Makambo yango esalamaki mpo na kokokisa maloba oyo Mokonzi alobaka na monoko ya basakoli: «Mwana na ngai bima na Ezipito.» 16 Sima Herode asosoli te banganga minzoto batosi ye te, asiliki makasi, mpe atindi bakenda koboma bana ya mibali ya mibu mibale kokita oyo bazalaki na Beteleme mpe na etuka mobimba, kolanda tango oyo banganga minzoto balobaki. 17 Yango nyonso esalami ndenge mosakoli Yilimia alobaki: 18 «Bayoki mongongo na Rama, bilelo na bilelo makasi, Rachel azali kolela bana na ye, aboyi balendisa ye mpo bana bazali lisusu te.» 19 Tango Herode akufi, mwanze ya Mokonzi abimeli Jozefu na Ezipito mpe alobi na ye: 20 «Telema mpe kamata mwana na mama na ye mpe kenda na Isalaele, mpo oyo balingaki kobingisa bomoi ya mwana, basi bakufi. 21 Jozefu akamati mwana na mama na ye, bakei na ekolo ya Islaele. 22 Tango ayoki Akelusi akomi nkumu na ebonga ya tata na ye Herode,Jozefu abangi kokende, sima Nzambe kokebisa na ndoto, akei na etuka ya Galilea. 23 mpe afandaki na engumba ya Nazarete. Makambo oyo esalami mpo na kokokisa maloba na basakoli oyo elobi: Bakobenga ye Nazareen.