Mokapo 17

1 Sima na mikolo motoba, Yesu azuaki bayekoli oyo Petelo, Yakobo, mpe Yoane ndeko na ye, mpe amemaki bango na ngomba molai. 2 Amibokolaki libosa na bango elongi naye engengaki lokola moi, bilamba neya ekunaki pembe penza. 3 Mpe tala, Mose na Elia babimelaki bango mpe basololi naye. 4 Petelo alobeli Yesu :" Soko okolinga, eleki na malamu totikala awa. Soko okolinga, natonga awa ndaku mike misato, mpona yo moko, moko na Mose, mpe moko na Elia". 5 Lokola ezali ye koloba, tala, mapata na pembe ezipa bango, mongongo ewuti na mapata eyokani ete: « Tala muana nagai bolingi oyo nasepelayoka naye mingi boyoka». 6 Na ntango bayekoli bayoki bongo banso bakweyaki na bilongi na bango mpo batondisamaki na kobanga makasi ». 7 Na bongo yesu aye epai na bango, mpe alobi: «botelema, bobanga te» 8 Boye batalaki na likolo kasi bamonaki moto te bobele Yesu. 9 Lokola banbandaki kokita na ngomba, Yesu apesi ban go mitindo ete;« boyebisa moto te oyo bomoni, kino kkokisama elaka na muana muto kosekua na bomoi». 10 Bayekoli misato oyo batunaki ye: « Mpona nini bakomi na mobeko bazali koloba, ezali na ntina monene ete Elia aya liboso?». 11 Yesu ayanoli bango: « Na solo, Elia akoya mpo na kobongisa makambo yonso. 12 Kasi nalobeli bino: « Elia asila koya, Kasi bato bayebaki ye te. Nzoka nde , basalelaki yonso oyo ekokaki basala mpona ye. Na lolenge wana, mwana na moto akoleka na mpasi na maboko na bango». 13 Boye bayekoli basosolaki ete ye azali koloba na ntina na Yoane mobatsi. 14 Tango bazongaki epai ya bituluku ya bato, mobali moko ayaki na Yesu, afukameli liboso na ye. 15 Mpe alobi: « Mokonzi, yokela muana nangai mawa zambi azali kokweya kokweya mpe konyokolma na mpasi mingi. Na boye akweyaki tango nyonso na moto mpe na mai. 16 Naye epai ya bayekoli nayo, mpe bakokaki kobikisa ye». 17 Yesu ayanoli: « libota na bozangi bondima mpe kobongola makambu na malamu na mabe, kino ntango nini nakozala na binoseko? kino tango nini nakomemaka bino ntango nyonso? Bomema ye awa». 18 Yesu apameli molimo mabe mpe ebimaki na kati naye. mwana mobali abikaki noki noki na ntango wana. 19 Bongo bayekoli bapusanaki na Yesu na kobombala mpe balobi: « boni boni biso tokokaki kobengana milomo mabe wana te?». 20 Yesu ayanolaki bango : « Ewuti na kondima na bino nse moko. Zambi nalobeli bino na solo, soko b ozali na kodima ata moke lokola awangila, bokoloba na ngomba oyo, "longua awa mpe kende kuna" nyonso ekolongwa mpe eloko moko moko te ekoleka nguya na bino. 21 kasi milimo mabe na ndenge oyo babenganaka yango bobele na mabondeli mpe losambo na zanga kolia. 22 Wana ezalaki bango na galileya , yesu alobeli bayekoli naye: « Mwana na moto akopesama na maboko na bato; 23 Mpe bakoboma ye, na sima ya mikolo misato akosekwa». Na yango bayekoli bayokaki mawa makasi. 24 Na tango bakomaki na kapelnauma, bakongoli na mosolo ya pako na tempelo bayaki epai na Petelo mpe balobaki, molakisi na bino afutaka pako te? 25 Petelo aynolaki: « iyo» Tango Petelo akotaki na ndako epai na Yesu, ye akamataki liloba moto na liboso mpe alobi: « Okanisi na likambo oyo boniboni Simona? bakozui na makili oyo bazuaka mpako to lifuta epai na banani? epai na bato na bango to epai na bapaya? 26 Tango Petelo ayanoli: « na bapaya» Yesu alobi : « na bongo bana bonka bazali nse na mobeko wana te mpo bafuta pako. 27 Kasi mpo ete tosumaka bato na kolokolo mosolo na pako te. kenda na mai buaka ndobo nayo mpe mbisi okobenda yango liboso, ofongola mpe okmona lopata. Kamata yango mpe kenda kofuta pako mpona biso nayo.