MATAYO 15

1 Ndambo moke ya Bafelizao mpe bakomi mibeko bauti Yelusalema bayei epai na Yesu, balobi: 2 «Mpo na nini bayekoli na yo batosaka bonkoko te? basokolaka maboko te liboso ya kolia.» 3 Yesu ayanoli bango : «Mpona nini bino botosaka mibeko na Nzambe te mpo na bonkoko na bino?» 4 Mpo Nzambe alobi ete:«Kumisa tata mpe mama na yo.» Oyo akolakela bango mabe akufa. 5 Kasi bino bolobi na bato: «Lisungi lia ngai mpo na bino, ezali likabo na Nzambe. 6 Moto yango ajali na ntina te ya kokumisa tata wa ye mpe bino bobebisi liloba lia Nzambe mpo na bonkoko bwa bino. 7 «Bakosi! Mosakoli Yisaya alobaki solo tango asakolaki mpo na bino. 8 Bato oyo bakumisaka ngai na mbebo kasi mitema na bango mijali mosika na ngai. 9 Bakumisaka ngai pamba mpo mateya ma bango majali na ntina na mibeko mia bato.» 10 Mpe abiangi etuliku ya bato epai ya ye, alobi: «Boyoka mpe bososola. 11 Oyo ekotaka o monoko mwa moto ekoki kobebisa ye te, kasi oyo ebimaka kati ya monoko mwa ye. 12 Bayekoli bayaki koloba na ye ete bafalizao basiliki mpo na maloba ma yo. 13 Yesu ayanoli bango ete « nzete inso tata wa ngai o likolo aloni te ekokatama. 14 Bolanda bango te, bajali bakufi miso. Soki mokufi miso atamwisi mosusu, bango babale bakokweya o libulu.» 15 Petelo ayanoli Yesu: «Limbola biso lisapo lina. 16 Yesu ayanoli bango: «Bino mpe boyebi te ndimbola na yango? 17 Ejali inso te ikotaka o monoko, koleka na libumu tii na njongo linene. 18 Kasi nyonso ebimaka na monoko eutaka o motema, yango nde ekomisaka moto mabe. 19 Na motema nde makambo oyo ewutaka; makanisi mabe, koboma bato, ekobo, pite, moyibi, lokuta, kofinga. 20 Makambo oyo nde eyeisaka moto mabe. Kasi kolia kojanga kosukola maboko ekoki kokomisa moto mabe te.» 21 Kolongwa na Yesu wana , akei na mokili ya Tula mpe Sidona. 22 Mpe mwasi moko wa mokili mwa canana ajalaki kuna, ayaki epai na Yesu agangi «Mokonji mwana wa Dawidi, yokela ngai mawa; mwana wa ngai wa mwasi ajali kotungisama na milimo mabe.» 23 Yesu ayanoli ye te. Bayekoli na ye bayebisi ye ete: « bengana ye mpo ajali kotia makelele sima na biso.» 24 Kasi Yesu ayanoli: «Natindami bobele mpo na bampate babunga ya Yisalele. 25 Bongo ayaki kofukama liboso ya ye alobi: «Mokonji salisa ngai.» 26 Ayanoli mpe alibi: «Ezali malamu te kopesa bilei ya bana na imbwa. 27 Alobi: «Mokonji, ba imbwa baliaka mpe biloko bikweaka na nse ya mesa ya bakonji.» 28 Yesu ayanoli ye, «mwasi, kondina na yo ezali monene, esalemela yo lokola elingi yo.» Mpe mwana abikaki na ngonga ena. 29 Yesu alongwi na esika ena mpe akei na ngambo ya mbu ya Galileya. Abutaki likolo ya ngomba afandaki kuna. 30 Etuluku ya bato bayei epai ya ye, bakakatani, bibosono, bakufi miso, bimimi mpe babeli basusu batia bango na makolo ma Yesu mpe abikisaki bango. 31 Etuluki ya bato basepelaki komona bimimi kolba, bibosono na njoto kolongonu, mikakatali kotambola, bakufi miso komona, bakumisaki Njambe na Yisalele. 32 Yesu abiangaki bayekoli ba ye, alobi na bango: «Najali na mawa mpo na etuluku ya bato bafandi elongo ngai, bajali na bilei te. Nalingi kotika bango na nzala te, pamba te bakoki kokwaya o nzala.» 33 Bayekoli bayanoli: «Tokozwa bilei wapi mpo na ebele ya bato oyo?» 34 Yesu atuni bango: « bajali na mapa boni?» Bayanoli ye: «Sambo na mbisi moke.» 35 Bongo Yesu apesi mitindo bafanda. 36 Ajwaki mapa sambo mpe mbisi, sima ya botondi Nzambe, akaati yango na biteni, apesi na bayekoli mpo bakabola. 37 Banso baliaki na mposa na bango, batondaki mpe biteni etikalaki, batondisaki bikolo sambo. 38 Motango mwa bato mojalaki nkoto minei kotanga basi na bana te. 39 Sima na yango, Yesu azongisaki bato mpe ayingeli na bwato, akei na etuka na Magadana.