Mokapo ya 14

1 Natango wana, Helode le Tetraque apesaki na kola mpona Yesu. 2 Alobi na basali naye: « ezali Yeoane mobatisi moto asukwi na ba kufi? Yango wana nguya na ye ezali kosala bongo kati naye. 3 Pamba te, helode akangaki Yoane, akangi ye basinga nzoto mobimba mpe atiaki ye na boloko na tina Helodiade, mwasi ya ndeko na ye filipe. 4 Pamba te Yoane alobaki naye boye: ndingisa epesemeli yo te na mibeko ozuwa muasi ya ndeko na yo. 5 Helode alingaki aboma ye kasi abangaki etuluku ya bato mpo bazwaki ye lokola mosakoli. 6 Tango mokolo ya feti ya mbotama na Helode ekokaki, mwana mwasi ya helodiade abinaki , helode asepelaki na mabina wana. 7 Akati tseleka ya kolaka na mwana mwasi, eloko nyonso akosenga ye akopesa ye yango. 8 Sima ya kozua mitondo na mama naye: «alobi» pesa n gai na sani mutu na Yoane m:obikisi. 9 Mokonzi akomaki kipelekese na esengeli ya mwana mwasi. Kasi na tina tseleka naye mpe na etuluku ya batu bazalaki wana na milulu, Apesaki mitindo esalama bongo. 10 Atindaki moto akata mutu ya Yoane mobatisi na boloko. 11 Bongo mutu naye bamemaki yango mpe bapesi mwana mwasi sima apesi mama naye. 12 Bayekoli ya Yoane bazwaki nzoto na ye mpe bakundaki yango sima nayango, bakendaki koyebisa Yesu. 13 Tango Yesu azui sango ya liwa na Yoane mobatisi, akendaki komifandela ye moko mwamosika. Tango etuluku ya batu bayebi sango wana, bato na engunda ebele penza komaki kolanda Yesu. 14 Yesu azalaki kotambola na liboso na bango ayokeli bango mawa mpe abandi kobikisa bango na bokono na bango. 15 Tango mpokwa eye, bayekoli bapusani pembeni na Yesu mpe balobi na ye: « esika oyo eza esika na pamba mpe ngonga epusani bengana etuluku ya bato oyo bakende na bandako na bango basomba bileyi. 16 Kasi Yesu ayanoli bango: Bazali na posa ya kozonga te. bopesa bango bino moko biye ya kolia». 17 Bayanoli Yesu: «tozali kaka na ba kwanga mitanu na mbisi ya mayi mibale» Yesu ayanoli bango. 18 Yesu ayanoli bango: boyelenga yango! 19 Yesu alobi na etuluku na bato, bafanda na matiti. Atomboli miso likolo apamboli mpe apesi bango bakabola balia. 20 Bango nyonso baliaki mpe batondaki koleka. Mpe balokotaki bakitunga ya biteni zomi na mibale. 21 Etuluku ya bato baliaki ezalaki koto mitanu ya mibale kaka, basi mpe bilenge batangaki bango te 22 Sima ya kolia, amatisi bayekoli na bwatu mpo bakoma na ngambu. Bongo ye moko azalaki kozongisa etuluku na bato. 23 Sima ya kozongisa bato, akoti ye moko na bwatu akeyi na ngomba pona kobondela. Pokwa eyaki azalaki kaka ye moko. 24 Bwatu ekomaki na katikati na mayi, mbonge makasi mpe mopepe ezalaki kowa na mopanzi mosusu. 25 Tango ngonga epusanaki mpo tongo etana, Yesu apusani pembeni na bango, azali kotombola na mayi. 26 Tango bayekoli bamoni ye kotambola na mayi, babangaki makasi penza mpe balobi : « oyo zabolo», mpe ba nganga ki na kobanga makasi. 27 Yesu alobeli bango kaka na tango wana: «oyika mpiko ezali ngai, bobanga te» 28 Patelo aya noli ye: « Mokonzi, soki ezali yo mpesa ngai mitindo naye esika yo ozali na tambola likolo na mayi» 29 Yesu alobi na ye : "Yaka" bongo petelo abimaki na bwatu mpe abandaki kotambola likolo na mayi kokende esika yesu azalaki. 30 Tango Petelo amoni mbonge makasi na mopepe, abngaki makasi. mpe abandi kozinda na mayi, mpe ngangi: « Mokonzi bikia ngai. 31 Yesu apusani mpe atandi loboko naye mpe kosimba petelo. Yesu alobi na ye: « moto ya kondima moke» Mpona nini ondimaki te? 32 Tango Yesu na Petelobakoti na bwato mpepeesili: 33 Bongo bayekoli oyo bazalaki na bwatu bakumisi Yesu mpe balobi na ye « solo ozali mwana na Nzambe» 34 Tango bakatisi ebale, basekami na mboka genezareth. 35 Bongo batu ya mboka wana bayebaki Yesu penza. batindi ba ba maloba bipayi na bipayi mpo bayela bato ya bokono. 36 Bazali konbondela ye mpo asimba elamba naye, mpe bango ynonso babikisami.