Matayo 13

1 Mokolo yango ,yesu abimi nandako azalaki koteya afandi pembeni ya ebale. 2 Etuluku ya bato ezingaki ye,mpe nabwato avandi ,bango nionso batelemaki na libongo. 3 Mpe yesu ayebisaki bango makambo ebele na masese,alobi: Mokoni moko abimaki mpona kokona. 4 Tango azalaki kokona,mikona mosusu ekweyi pembeni ya nzela bandeke baye komela yango. 5 Bakona mosusu ekweyi esika ya mabanga,mabele ndambo,sasaipi ebimi nzambi mabele ezalaki na bozindo te. 6 Tango moyi ebimi,bilona nionso eziki mpo ezalaki na misisa te pe ekawuki. 7 Misusu ekweyi na kati ya nzube,banzube ekolaki mpe efinaki yango. 8 Bakona mususu ekweyi na mabele ya kitoko mpe eboti kona mosusu koleka kama tuku motoba pe tuku misato. 9 Oyo azali na matoyi ayoka. 10 Bayekoli bayaki epayi na yesu kotuna mpona nini azali koloba na bato na masese? 11 Yesu ayanoli: Mpona bino bozwi makoki yako sosola sekele ya bokonzi na likolo,kasi bango te. 12 Nzambi oyo azali na yango bakobakisa mpo akoma na yango ebele,kasi mozangi bako longola ata moke oyo azali na yango. 13 Tina wana nazali kolobela bango na masese,nzambi ata bazali kotala ,kasi bazali komo te ,pe ata bazali koyoka kasi bazali kososola te. 14 Mpona bango lisakoli ya izaya ekokisami: Bokoyoka,kasi bokososola te,pe boko tala kasi bokomona te. 15 Nzambi bakomi mitema libanga ,pe bazipi miso mpo bamona te, matoyi mpo bayoka te pe mitema mpo basosola te.Noki to babongwama mpe babika. 16 Bo pambolami mpo miso mpe matoyi na bino ezali koyoka pe komona. 17 Ya solo,nayebisi bino,ebele yaba sakoli mpe ba yengebene bakanaki komona mpe koyoka makambo oyo bozali komona mpe koyoka,kasi bamoni mpe bayoki te. 18 Boyoka lisese ya moloni. 19 Tango moko ayoki liloba yabokonzi asosoli te,monguna aye mpe akamati maye elonamaki na motema ,ezali bambuma oyo ekweyi pembeni ya balabala(nzela). 20 Bambuma oyo ekweyi bisika yamabanga ezali moto ayoki liloba mpe andimi sasaipi na esengo. 21 Ezangi misisa mpe bopikiliki tango moke. Wana ekoya mikakatano to miniokoli mpona liloba,akopengwa 22 Mbuma oyo ekweyi naba nzube,ezali ye moto ayoki liloba kasi mposa ya bomengo,efini liloba mpe eboti te. 23 Bambuma ekweyi na mabele ya kitoko,nde moto oyo ayoki liloba mpe asosoli; ya solo ekobota mpe lisusu mokama,ntuku motoba,ntuku misato mpe akobongisa yango. 24 Yesu abeti lisese mosusu: Bokonzi nalikolo ezali lokola moto oyo aloni mbuma ya malamu nakati ya elanga naye. 25 Nakati kati yabutu,monguna aye kolona matiti mabe nakati ya loso pe alimwe , 26 tango milona ebimi mpe eboti mbuma,matiti mabe mpe emonani. 27 Basali ya nkolo elanga baye kotuna ye;mokonzi,olonaki milona yamalamu te? Ekomi matiti ya mabe ndenge nini? 28 Ayanoli bango :ezali misala ya monguna,basali ba zongisi; olingi tokende kopikola yango ? 29 Mokonzi ayanoli :te! noki te bokopikola loso. 30 Botika yango ekola elongo kino tango yako buka,nakoyebisa naba sali, bolongola naino matiti ya mabe mpona kotumba na sima bosangisa loso nakati ya ebombelo na ngai. 31 Yesu abeteli bango lisese mosusu: Bokonzi ya likolo ekokani na mbuma ya ndunda oyo moto aloni na elanga naye. 32 Ezali mbuma ya moke kati na mbuma nionso,kasi soki ekoli ekomaka molayi lokola nzete,bandeke basalaka ba zala na bango na bitape na yango. 33 Yesu abeteli bango lisese mosusu: Bokonzi ya likolo ekokani na fulu ya mapa oyo mwasi asangisi yango na kopo misato ya fufu kino ekovimba. 34 Yesu ateyaki bango mpe koloba kaka na masese. 35 Esalamaki bongo mpo maloba ya mosakoli ekokisama;nakoloba mpe nako yebisa bango makambo oyo ebatama wuta ebandeli ya mokili. 36 Tango yesu apanzi bato,akeyi kopema,bayekoli baye kotuna ye ndimbola biso lisese ya matiti mabe oyo ebotaki na elanga. 37 Ayanoli: Moloni ezali mwana ya nzambe. 38 Elanga ezali mokili oyo,bambuma ya kitoko ezali bandimi,matiti mabe ezali bana ya satana. 39 Monguna oyo aloni matiti mabe,ezali zabolo,eleko ya kobuka ezali suka na ekeke(ya mokili) ,basali nde ba angelou. 40 Lokola matiti mabe esilaki kozika ekozala mpe bongo nasuka ya mokili. 41 Mwana na moto akotinda angelou naye,bapikola nakati ya bokonzi naye mabe nionso mpe masumu nionso. 42 Bakobuaka na lifelo,kuna ekozala kolela mpe kolia mino. 43 Bayengebene bako ngenga lokola moyi na bokonzi na tata na bango, oyo azali na matoyi ayoka. 44 Bokonzi ya likolo ekokani na moto oyo amoni eloko ya motuya nakati na elanga,asepeli,akeyi koteka biloko naye nionso mpe asombi elanga nionso. 45 Lsusu,bokonzi na likolo ezali ndenge moko na moteki oyo azali koluka palata ya motuya. 46 Tango akundoli palata ya motuya makasi akeyi koteka biloko naye nionso mpe asombi yango 47 Bokonzi ya likolo ekokani na moniama ebwakami na mayi ekangi ba mbisi lolenge nionso,tango etondi balobi babimisa yango na libongo. 48 Na sima bavandaki kosangisa ya malamu nakati ya bitunga mpe babwakaki ya mabe. 49 Ekozala ndenge wana na mokolo ya suka ,nzambe akoya kosambisa bato kasi ba angelou bakoya kokabola bato yamalamu na ya mabe. 50 Bakobwakama na lifelo, kuna ekozala kolela mpe koswa mino 51 Bososoli makambo nionso? Bayekoli bayanoli; 52 boye tososoli . Na sima yesu alobi: Kalaka nionso oyo atanga makambo na bokonzi ya likolo akokani na moto oyo azali na ndako mpe abimisi biloko ya kala mpe ya sika nakati ya ebombelo naye. 53 Tango asilisi koloba makambo nionso ,alongwe na esika wana. 54 Na sima yesu akendaki koteya etuluku ya bato nakati ya ba eyanganelo,ba oyo bayokaki ye,bakamwaki balobi; bwanya mpe makamwisi ya moto oyo ewiti wapi? 55 Yende mwana ya josefe te? Azali mwana ya maliya te? Yakobo,josefe,simona mpe yuda bazali bandeko naye te? 56 Bandeko naye ya basi bazali kati na biso te? 57 Bamonaki lokola afingi bango ,kasi yesu ayebisi bango: Ezali kaka na mboka pe libota ya mosakoli nde bamemiaka ye te. 58 Asalaki lisusu makamwisi mingi te na esika wana mpo bazalaki mitema mabanga(motema makasi)