MOKAPO 12

1 Nantango wana yesu na bayekoli na ye bazalaki kpleka na kati na ble mokolo na eyenga. bayekoli na ye bayakaki nzala, babandi kabuka yango mpe kolia. 2 Ntango ba falisa yo bamoni yango balobi na yesu tala bayekoli na yo bazali koluka mobeko na saba ta. 3 Kasi yesu alabeli bango botangi niono oyo davidi asalaki ntango ayokaki nzala na ba to yo yonso bazalaki na ye elingo? 4 Ndenge akotaki na ndako na nzambe mpe aliaki lipa oyo ebulisami oyo esengelaki na ye te kolia mpe na ba oyo bazalaki na ye elongo bobele banganga nzambe nde bakoki kolia. 5 Mpe botangaki te na kati na mabeko ete na ntango na sabata, ba nganga na kati na tempelo bazalaki kabuka mabeko na tempelo kasi ezalaki mpo na bango mabe te? 6 Kasi nalobeli bina te muto moko azali awa aleki ba nganga na monene. 7 Soko boyebaka likambo elingi kolaba nini nalingaka makambo na mawa kasi mbeka te mbele bopesi basali mabe te etumbu. 8 Zambe mwana na moto azali nkolo na sabata. 9 Boye yesu alongwi wana mpe akoti na ndako na koyekola mobeko synagogue. 10 Mpe tala, mabali moko azalaki wana loboko eka oki ba farisa yo batunaki yesu ezali malamu kobitisa moto na mposi mokolo na eyenga batuni bango mpo bameka kokweisa ye na masumu. 11 Yesu alobi muto nani na kati na bino oyo azali bobele na mpate moko mpe yango ekwei na libulu na mokolo na sabata okoluka te kobimiqsa ye noki kunana mokolo na sabata? 12 Bani bani muto aleki mpote na ntina na bango eleki malamu kasala bolamu na mokolo na sabata . 13 Na bango yesu alabi na moto wana sembola laboko na yo asemboli yango mpe noki moke ebikaki, lakala laboko mosusu. 14 Emoni ba falisayo bongo, babimaki libanda mpo babongisa makanisi mabe likolo na ye. bokanga ye mpo na koboma. 15 Ntango yesu amoni bango bongo. amibendi nzoto mpe akei. bituluku na bato bakei nsima na ye mpe abikisi banso. 16 Akebisaki makasi mpo bayekisa bato basusu te. 17 Mpo ete oyo elobamaki na masakoli yisaya ekokisama. 18 Tala mosali na ngai oyo naponi ye molingami na ngai oyo motema na ngai esepeli na ye mingi. nakotia molimo na ngai kati na ye mpe akosambisa bapakano. 19 Akotomboka te mpe akogonga te mpe moto te nyite ebimisaka milinga, kino alongisa sembo na ye. 20 Akobuka te lititi akembi, akozimisa te nzete ebimisaka milinga, kino alongisa sembo na ye. 21 Mpe bapakanu bakozala na elikia mpo na nkombo na ye. 22 Na bongo muto moko na lolanda mokufeli mpe baba, na yesu abikisaki ye monoko na ye epai na yesu. abikisaki ye monoko efungwamaki mpe amanaki polele. 23 Bituluku na bato bokamwaki balabi ekoki kozanga te ete muto oyo azali mwana na dauidi? 24 Ntango bafalisa yo bayaki likambo na ekamwisaki oyo, balobe moto oyo ezali kobengena milimo mabe nanzela na beelzebuel mokonzi na ba milimo mabe. 25 Kasi yesu ayebaki makanisi nabango pe alobi bokenzi oyo ekabwani na yango mpenza ekoki na kobebisama, mpe mboka yonso to ndako oyo etelemeli bakonzi wana ekoki kowuma te. 26 Sokop satana azali kobengana satana akumi na bokwanikati na ye moko boni boni bokonzi na ye ekoki komela . 27 Kasi soko nazali kobimisa milimo mabe na beellzebul bongo ba yo bazali kolanda bango bakobengena milimo mabe na ntina oyo bango fakozala basa mbisi na bino. 28 Soko nazali kobengena ba milimo mabe na nguya na molimo na nzamne boye bakonzi na nzambe ezali kati na bino. 29 Lolenge nini muto akoki kokota na ndako na elombe mpe ayiba biloko na ye yonsosako akongi elombe wana te ? nde akoki kobotala bomengo na ye na ndako. 30 Ye oyo azali na ngai te amizalisi mongena na ngai, mpe oyo azali kasa ngona na ngai te azali kobebisa. 31 Na bongo nalabeli bino mosumu yonso mpe na kotiala nzambe ekolimbisama kasi masumu na kotiola molimo mosato ekolimbisama te. 32 Kasi soko muto akolaba mabe na ntina na mwana na moto ekolimbisama mpo na ye. kasi muto nani akolaba mabe na ntina na molimo mosato masumu wana ekolimbisama te ata awa na mokili ata na ntango ekoya.