Mokapo ya 11

1 Tango Yesu asilisi kopesa mitindo na bayekoli naye zomi na mibale, alongwe mpo akende koteya mpe kosakola na bituka na pembeni. 2 Yoane mobatisi ayoki bazali kolobela misala ya Kristo. Wana ye na boloko atindi bayekoli na ye epai ya Yesu. 3 Batuna ye boye: Ozali oyo asengeli koya to esengeli kozela mosusu?» 4 yesu ayanoli mpe alobi: « bokende koyebisa Yoane oyo bo moni mpe oyo boyoki. 5 Bakufi miso bazali komona, bibosono bazali kotambola, batosa bokono ya mabe bazali kobika, ba kufa matoi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa, mpe sango malamu ezali kosakolama na bato ya mawa. 6 Esengo na moto oyo akozala libaku ya mabe mpona ngai». 7 Awa ba yekoli na Yoane bazongi, yesu abandi koloba na etuluku ya bato na likambo na yoane : « 8 Bokendaki kotala na nini na esobe, nzela ya moke oyo mopepe ezali koningisa ? Bo kendaki kotala nini, moto alati bilamba ya kitoko? solo oyo ba lati bilamba ya kitoko avandaka na ndaku ya bakonzi. 9 Bokendaki kotala nini, mosakoli? boye bokendaki kotala mosakoli ya solo, nalobi na bino boye, Ye aleki mosakoli. 10 Pamba te Yoane azali moto oyo Bakoma boye: "Natndi ntoma nagai liboso nayo kobongisela yo nzela. 11 Na lobi na bino ya solo, na bato oyo nyonso ba botama na basi, moto te aleki Yoane mobatisi. Kasi na kati ya mokonzi ya Nzambe moto ya suka aleka. 12 Kobanda Yoane mobatisi azalaki kosakola kino lelo, bokokonzi ya likolo ezali ya kowelela mpe bato ya makasi nde ba kokota. 13 Kasi basakoli nyonso mpe mibeko basakolaki kino na eleko ya Yoana. 14 Soki bolingi koyamba ye, Ezali ye nde Elia, oyo asengelaki koya. 15 Oyo azali na matoyi ya koyoka , ayoka. 16 Na kokokanisa ekeke oyo na nani? ezali lokola bana mike bavandi na zando, bavandi mpe ba bengani moko na moko mpe ba lobi: 17 tobetelaki bino polopolo, kasi bo bine te. Tosali matanga boleli te. 18 Yoane aye aboyi !kolia kwanga mpe komela vino. Bolobi " azali na molimo" 19 Mwana ya moto ayei, azo lia mpe komela mpe bolobi, botala azali na lokoso mpe moto na milangwa, moninga ya bafutisi mpaku mpe ya bato ya masumu! kasi mayele na ye ezali komonana na misala. 20 Bongo Yesu abandi kopamela bato ya bituka mingi oyo ye amonisaki misala ya kokamwa, mpo ete banbopngolaki mitama te. « awa nayo Korazine! 21 Mawa nayo Betesaïda! soki misala ya minene oyo esalamaki na etuku ya Tyr na Sidon nde ezalaki epai na bino, mbele balataki saki mpe potopoto mpna kotalisa ete babongoli mitama. 22 Yango ,wana na lobi na bino mokolo Nzambe akosambisa mokili etumbu na bino ekoleka ya Tyr na Sidon. 23 Mpe yo Kapernaume okanisi ete okomata ti na likolo? te, okokita ti na bonka ya bato bakufa, pamba te soki makamuisi masalamaki nayo, mbele ezala kino lelo. 24 Yango wana na lobi nayo mokolo Nzambe ako sambisa mokili etumbu na bino ekoleka ya sodomo. 25 na tango wana Yesu alobi. « E tata, Mokonzi na likolo na nse! napesi yo matondo, obombi makambo oyo na bato ya bwania mpe bato ya mayele, efongoli sekele na bato ba oyo ya mayele moko, mpe na bana mike. 26 Solo, Tata olingaki ezala bobele bongo. 27 Makambo nyonso epesamelaki na Tata na ngai, moko te ayebi bobele Tata na ngai moto moko te ayebi Tata bobele mwana mpe na ba oyo mwana alingi kolakisa bango Ye. 28 Boya epai na ngai, bino nyonso oyo bazali kosala mpe bomemi mikumba ya kilo, na kopesa bino bopemi. 29 Bozala basali na ngai mpe boya kozua mayele epayi ngai pamba te na zali moto ya motema malamu mpe ya boboto, bokozua kimia na mitema na bino. 30 Kosalela ngai ezali mpasi te, mpe bikumba na ngai ezali kilo te.