Mokapo 1

1 Na ebandeli ezalaki liloba ,liloba ezalaki na nzambe pe liloba ezalaki nzambe. 2 Yango ezalaki na nzambe na ebandeli. 3 Bikelamu nioso bikelamaki na ye,ekelamu moko te esalamaki soki naye te. 4 Naye bomoyi ezalaka pe bomoyi ezalaka pole ya batu nioso. 5 Pole engengi na molili pemolili pe molili epekisi yango ata mokié te 6 Motindami moko na nzambe , kombo naye ezalaki jean , 7 Azali lokola nzene keke po atatola epayi na bato oyo ete azali mwinda na bomoi mpo bandimela ye. 8 Yoani azali mwinda te nkasi aye po atatola pole. 9 Ezali mwinda ya sol'oyo ezo ngengisa bato nioso oyo bawiti na mokili 10 Azalaki kati na mokili ,pe mokili esalamaki naye,pe mokili eyebaki ye te. 11 Aye epai yaba oyo yaye kasi ba oyo ya ye bayambaki ye te. 12 Kasi na ba oyo nioso bayambi ye,pe bandimeli kombo naye,apesi bango bokonzi yakokoma bana naye, 13 ba oyo babotami na makila te na bondimisami ya nzote te pe ya moto te kasi ya nzambe. 14 Liloba elati nzoto pe ezali kati na biso,tomoni nkembo naye,pe nkembo naye emonana ki lokola ya muto moko oyo aweti na tata,etondisami na nkembo pe na bosolo. 15 Yoan atatoli na mongongo makasi:ezali ye oyo na tatolaki nakoloba ete oyo akoya na sima na ngai azali nde moto na liboso na ngai,po ete azalaki liboso na ngai. 16 Wuta kotondisama na molimo,to zua epai naye ngolu na ngolu. 17 Na tina mobeko epesama na mosse,kasi ngolu pe bosolo eye na nzela ya yesu masiya. 18 Moto moko te amoni nzambe,bobele ye moko nzambe oyo azali na kati ya tata,amimonisi. 19 Oyo ezali litatoli ya yoan tango ba yuda batindaki banganga pe ba lewi pona kotuna ye. Y'ozali nani? 20 Ye aboyaki te ayanoli bango na kimia pe alobi; nazali mobikisi te. 21 Na boye batuni ye;ozali nani kasi? Ozali Eliya ? Ayanoli ;nazali pe yete . Batuni lisusu ozali mosakoli ? Ayanoli te. 22 Nabongo balobi naye ozali nani? Po ete tozongisa eyano na bato oyo ba tindaki biso? Olobi nini natina y'oyo ozali? 23 Yoan ayanoli bango; nazali mongongo naye oyo ezali ko ganga kati na lisobe;botia alima na nzela na mokonzi lolenge mosakoli izaya alobaki ete; 24 Ezalaki wana batindami mususu epai yaba farizi. Batuni ye; 25 Kasi pona nini ozali kopesa libatisi soki ozali mobikisi te, Eliya te pe mosakolite? 26 Yoan ayanoli bango pe alobi; ngai nazali kobatisa na moyi . Kasi nakati na bino ezali na moto moko oyo boyebi ye te. 27 Moto yango azali oyo aye na sima na ngai. Na bongisami te kofongola singa ya sapatu naye. 28 Makambo yango elekaki na Betanie pene pene ya jourdain esika yoan azalaki kobatisa. 29 Na mokolo ya sima ,yoan amoni yesu koya epai naye pe yo yoan alobi;botala ezali mwana na mpate oyo alongoli masumu na mokili mobimba. 30 Yewana nalobaki ete oyo akoya sima na ngai aleki ngai na munene;po azalaki liboso na ngai. 31 Nayebaki ye te, ezalaki po ete etalisama na Israel ete naye kobaptisa na mayi. 32 Yoan atatoli; Namoni molimo na nzambe kowita likolo kokita lokola ebenga koya kovanda katina ye. 33 Nayebaki ye te kasi yende motindami na ngai mpo naya kobaptisa na mayi alobi na ngai; Moto oy'okomona molimo na nzambe kokita pe kovanda kati naye, ezali yende ako baptisa na molimo mosantu. 34 Na moni pe na tatoli azali mwana na nzambe. 35 Na mokolo na sima ,Yoan azalaki na bayekoli naye mibale, 36 bamoni yesu koleka wana pe Yoan alobi botala mwana na mpate na nzambe! 37 Ba yekoli bayoki yoan koloba bango,pe balandi yesu. 38 Yesu azongi pe amoni bango kolanda ye,alobi na bango;bolingi nini ? Bayanoli ye ,Molakisi ovandaka wapi ? 39 Ayanolibango: boya pe bomona . Bayaki pe bamonaki esika bwa ye . Batikalaki naye wana butu mobimba. 40 Moko na bayekoli oyo bayokaki Yoan pe balandaki yesu ezali André ,ndeko ya simon Petelo. 41 Akendaki kokutana na moto ya liboso ndeko naye Simon pe alobi naye;ndeko tosili kokutana na masiya(klisto). 42 Amemi simoni epai na yesu,yesu amoni ye pe alobi; yo simoni,mwana na yoan ,okobiangama céphas(libanga). 43 Na mokolo na sima ,wana yesu alingaki kolongwa pona kokende na galilea ,akutani na fillipe,alobi naye landa ngai. 44 Tala filipo azali moto na betesaida,mboka y'adré pe ya petelo. 45 Filipo akutani na nahanael pe alobi naye; Moto oyo mosse akomaka na na buku ya mibeko pe oyo ba sakoli balobaka tokutani na ye, yesu ,mwana ya joseph, na mboka ya Nazareth. 46 Nathanael alobeli ye :Eloko ya malamu ekoki kobima na nazareth ? Filipe azongiseli ye: yaka pe omona. 47 Yesu amoni nathanael koya epai na ye pe alobi naye: Tala moto na mboka israel ya solo epai naye lukuta ezali te! Nathanael alobi naye : 48 Lolenge nini oyebi ngai ? Yesu azongiseli ye ;Yambo filipe abenga yo tango ozalaki na sé ya nzete namonaki yo. 49 Nathanael ayanoli ; molakisi ozali mwana na nzambe ! Ozali mokonzi y'israel ! 50 Yesu ayanoli ye :Ezali po ete nalobi na monaki yo na sé ya nzete ,yango ozali kondima ? Okomona makambo ya minene koleka wana . 51 Pe alobi na ye lisusu : ya solo solo nazali koyebisa yo, okomona likolo ekofongwama pe ba angelou na nzambe komata pe kokita likolo ya mwana na moto.