MOKAPO 14

1 Tala, mokolo na kanza na kanza na yawe ewe ebelemi, bomengo na yo ekopangana O miso ma yo mpe okofuka te. 2 Nakoyanganisa bikolo binso mpo babundisa yelusalame, engumba ekokwe ya Omaboko ya banguna, banguna,biloko bye banda inso bikobutolama, basi bakozwama na makasi: ndambo ya engumba ekokende O bonombo, ndebaye bakotikala bakosila kati na engumbo te. 3 Yawe akomonana, mpe akobundisa bikolo bina, bo lolenge abundaka O mokolo mwa etumba. 4 Bitambi bye bikotelema mokolo ya ngo likolo ya ngomba na eleya oyo etalani na yelusaleme, na epayi ya monzele: ngomba na eleya ekopasuka kati ndambo O monzete mpe esusu epai moyi elimwaka, bongo lobwako mpe libulu monene ekosalama, ndimo na ebimelo na moyi, mosusu na ngele. 5 Bokobombama O kati ya lobwako na bangomba, zambi lobwaka na bangomba,zambi lobwako na bangomba ekeyi kono mokoli na aterele, na yango bakopata ba mokolo mwa koninga na ya mabele, na tango na O ziase, mokonzi na yuda bango, yawe nzambena ngai oboya elongo na basantu ba ye. 6 O mokolo mona, pole ekozala te, mpio mpe mayi makokangama makasi. 7 Ekozala mokolo na kokamwa mpo yawe ayebi yango, moyi mpe butu bikozala te, bongo na tango na pokwa nde pole mokimi. 8 O mokolo mona, mayi na bomoi nde makobima O yelusaleme,mpe ndambo na yango ekotyola kokende na ebale na ebimelo na moyi,mpe ndambo esusu na ebale na elimwelo na moyi, obe bongo nde ekozala na tango na moyi makasi mpe na tango na mpio. 9 Yawe akozala mokonzi O mokili mobimba, O mobimba, O mokolo mona yawe okozala obe ye meyi. 10 Mboka mobimba ekokoma ba esobe, na Geba kino Rimna epai na nzela na yelusaleme, nde Wana yelusaleme ekotombwana mpe nde etikali na esika na ye, kolongwa ekuke na Benyamine kino esika na ekuke na yambo, kokoma kino ekuke na ekutanelo na mampango, kino kokoma na ndaka linongi molayi na Hananele, kino na bisika bakamolaka vino ya mokonzi. 11 Boyike bwa bato nde nde bafandi kati, epekiselo to mobulu ekozala te yelusaleme ekozala na bokengi. 12 Tala bokono bokozwa bikolo binso bikobundisa yelusaleme misuni na bango ya nzoto ekopola mpe bazali naino kotambola, miso ma bango makopola mpe lolendo na bango kati na minoko na bango. 13 O mokolo mona yawe nde akotisi mobulu monene epai na bango, moko akokanga loboko la mosusu, nde loboko na pakala. 14 Yuda mpe akobundela yelusaleme, bakobotola mpe kokumba ebele ya bazwi ya bikolo binso nzinga nzinga, wolo, musolo mpe molato bikozala nzike. 15 Na bampunda lokolo bakokwa bokono, bakamela mpe bampenda mike, elongo na banyama biye bikozala O kati ya molako la basoda, bokono bona boko kesana te. 16 Baye babikolo bisusu, ba oyo bayaki kobundisa yelusaleme mpe soki bakufi te, bakozwa motindo ya bomati mobu yonso mpo na kogumbamela mokonzi, yawe na mampinga, mpe mpo nakosepela nteke na alambo na mingombo. 17 Soki mabota esusu ya mokili bakoboya komata na yelusaleme, mpo na kogumbamela mokonzi, yawe na mampinga, mbula ekonokela bango lisusu te. 18 Soki libota na ezipito eboyi komata yelusaleme, soki atomboki, mbula ekonokela ye te, akozwa etumbu na bokono oyo yawe akopesa na bikolo nzike, baye baboyaka komata mpo na sepela nteke na mingombo. 19 Wana nde etumbu na ezipito, etumbu na bikolo nzike, baye bako mata te mpo na bosepeli nteke na elembo na mingombo. 20 O mokolo mona, nde ekomaki likolo na ngelengele na bampunda bosantu na yo yawe, mpe banzungu ya moto na ndako na yawe ekozala boloko ba kopo ya mbeki O boso bwa etumbelo na ye. 21 Banzungu inso na moto na yelusaleme mpe yuda nde ebulisani mpo na yawe na mampinga, banso baye bakokaba mboka, bakoya mpe bakosalela yango mpo na bolambi nyama, na eleko ena, basali mimbongo bakozala te na ndako na yawe na mamppinga