MOKOPO 13

1 O mokolpo mona, mosulu na mayi ekofungwana mpo na ndako na Davidi mpe bayi yelusaleme, mpo na bopetoli masumu mpe mbindo. 2 O mokolo mona, elobi yawe na mampinga, nakozimisa bakombo ya banzembe ba bikeko binso kati ya mboka, mpo bato ba banza yango ata lisusu te, nakolongola kati ya mboka basakoli mpe milimo na mbindo. 3 Soki moto nani ameki kosakolo lisusu, baboti na ye nde bakebisi ye boye: keba okozala na bomoi te, zambi okoloba lokuta na kombo na Yawe! bango nde baboti baye, bakotobola ye mopanga, na tango ekosakola ye. 4 O mokolo mona, basakoli bakotoka zambi bakokoka kopesa ndimbola ya bimoniseli bya bango, bolata lisusu te kazaka esengeli, zambio bakomi babuki lokuta. 5 Bakobanda komangana koloba: nazali mosakoli,te nakataka nde elanga, zambi basomba ngai uto bomwana. 6 Bango soki babatuni ye: bampota ozoki na maboko, ewuti wapi? akoyanola: nazokaki O ndako ya balingami na ngai. 7 Mopanga, telemema likoplo na mobateli na ngai mpe na moto azali nzinga nzinga na ngai! elobi yawe na mampinga, mobateli azwa etumbu, mpe ba meme bapalangana: bongo nasembolaki loboko ngai bato botawu. 8 Na mboka mobimba, elobi yawe, biteni bibale kati na misato na yango ekozikisama mpe ekobeba, eteni yoko nde ekobika. 9 Eteni yoko wana nde natie yango O moto, bo lolenge wolo mpe palata epetolamaka O moto bakobelela kombo na ngai, mpe na koyanola bango akobianga kombo na ngai, nakoyoka ye, mpe bakoloba azali libota na ngai! nde ye akoloba yawe azali nzambe na ngai!