Mokapo 12

1 Pamela na Yawe mpo na Yisalaele. Yawe alobi, ye oyo atiaki lola mpe mokili mpe akotisaki molimo na moto kati na ye: 2 Tala, nalingi kozalisa Yelusaleme kopo na kobulinganisa mpo bato banso na pembeni, mpe bongo mpo na Yuda kati na efandelo na Yelusaleme. 3 Na ntango wana, nakosala na Yelusaleme libanga na kilo mpo na bato banso; banso bakotombola yango bakokufa mpe bato banso na mokili bakosangana kobundisa yango. 4 Yawe alobi, na ntango ena, nakobulungisa bapunda banso, mpe nakolangwisa bamati na yango; kasi miso na ngai ekofungolama likolo na ndako na Yudea wana nakobeta bapunda na bango inso na bokangisami na miso. 5 Bayangeli na Yudea bakoloba na mitema: Nguya na biso euti na bato na Yelusaleme, na Yawe na mapinga. 6 Na ntango wana, nakosala na bayangeli na Yudea lokola likuka na moto engali kati na nkoni, lokola mwinda epeli kati na matiti; bakosanza bango bazingeli bango na loboko mobali mpe loboko na mwasi, mpe Yelusaleme ekotikala na esika na yango. 7 Yawe akobikisa liboso hema na Yudea, mpo ete nkembo na ndako na Dawidi, na mpe nkembo na bato na Yelusaleme ematisma te likolo na Yuda. 8 Na ntango wana, Yawe akobatela bato na Yelusaleme, mpe baoyo na kati na bango balembi bakozala bongo lokola Dawidi; ndako na Dawidi ekozala lokola Nzambe, lokola anjelu na Yawe liboso na bango. 9 Na ntango wana, nakobebisa mabota manso makoya likolo na Yelusaleme. 10 Na boye nakosopa likolo na ndako na Dawidi mpe likolo na bato na Yelusaleme molimo na mawa mpe na elombeli, mpe bakobongola bilongi na bango epai na ngai. Oyo batobolaki na likonga, bakolela likolo na ye lokola kufa na mwana na liboso na mobali, bakolela na mpasi na motema likolo na ye lokola bakolela likolo na mwana na liboso mobali. 11 Na ntango wana, matanga monene ekozala na Yelusaleme lokola matanga na Hadadrimmon kati na lobwaku na Meguiddon. 12 Ekolo ekozala na matanga, libota na libota; libota na ndako na Dawidi libota na libota, mpe basi epai; libota na ndako na Nathan libota na libota, mpe basi epai; 13 Libota na ndako na Lewi libota na libota, mpe basi epai; libota na Schimei libota na libota, mpe basi epai; 14 Mabota masusu manso, libota na libota, mpe basi epai.