MOKOPO 11

1 Libana, fungola bikuke bya yo, mpo moto etumba banzete na yo na eleye(cedresè) 2 Bongo yo nzete na beloso cypres omilela zambi nzete na eleye ekatami zambi baye bakanisaki te ezali liseki, babebi! bolela, bino bongomba ya basana, pamba te zamba ya bono, bato banso sika bakokota kati. 3 Babateli bakoganga na mawe, zambi bokonzi bwa bongo ebebisami, bana nkosi bangulumi,zambi lipombo orgueil na yuludani esili. 4 Na yango, yawe, nzambe na ngai alobi: leyisa bo meme mpo na tango moke, nde bakatami nkingo. 5 Basombi bakoboma byongo na nko, bongo bateki bakoloba: yawe apambolama, zambi nakomi mozwi, zambi babateli ba bango bayokaka baango mawe te. 6 Lokola nazali lisusu na mawa te mpo na baye bafandi O mboka, elobi yawe, mpe tala, nde nakabi bato baana banso O maboko ya mokonzi na bango, bakobebisa mboka yango, mpe nakobikisa bango te 7 Lokola ezalaka ngai koleyisa ba meme biye bikobomama kala te, zambi biye bya bobola nde esengelaki kobomama, na kwi mangenda mibale: napesi moko kombo ngolu mpe mosusu bomoko, mpe nakobi koleyisa ba meme. 8 Na sanza yoko, nakobona babateli basato, zambi motema na ngai ezalisaki lisusu te mpo ya bango, mpe molimo na ngai ezwaki nkele mpo na bango. 9 Bango na lobi boye: lokola nakozala lisusu mobateli na bino te, oyo asengeli akufa, akufa, ye oyo akobebisama, abebisama, mpe baye mosuni ekolya,elyama. 10 Na yango, na kwi lingenda langai ya ngolu, mpe na buki yango, mpo na bokati boyokani eye zsalaki ngai na bikolo binso. 11 Boyokani yango ekatemaki O mokolo moona, mpe ba meme ya bobola baye bakebaki na mbela na ngai, basosolaki bongo te ezalaki solosolo liloba na yawe. 12 Nalobi na bango; soki esepelisi bino, bopesani ngai lifuta soki te botika. bongo bapimaki mpo na lifuta na ngai ndambo na misolo ntuku misato. 13 Yawe alobi na ngai boye: bwaka myngo epai na modoli na mbeki, zambi bango bamoni motuya wana nde nalonga, bongo na kwi ndambo na misolo ntuku misato, mpe na bwaki yango O ndako na nzambe epai na modoli na mbeki. 14 Mpe na bokani lingende la ngai ya mibale, mpo na kopanza bondeko kati na yuda mpe yisalaele. 15 Yawe alobi na ngai boye: kumba lisusu bisaleli na mobateli n,a bolmema! 16 Zambi nakobimisa na mboka yango, mobateli eye akozanga mawa na bameme biye bikobeba, ye akoboya kokende koluka bana meme baye bapalangani, akosalisa bampata biya bango te, ata baye bazali malamu, ye akoboya koleyisa bangi, nde akoliya ye moko baye batonda mafuta, nde apanzi bango kiwita maseke kino makolo na yango. 17 Mawa na mobateli na zololo, ye oyo asundolaka bameme, mopanga mobeta ye O loboko mpe na liso la ye ya mobeli! loboko la ye ekawuka, mpe liso la ye ekufa.