Mokapo 10

1 Bosenga na Yawe mbula, o eleko ya boloni! Yawe mokeli na ba nkake nde atindeli bino mbula ekasi mpe malamu, mpo moko moko na bino akwa milona o elanga ya ye. 2 Zambi banzambe ya bikeko balobaka maloba ma lokuta, mpe baye bamonaka makambo basakolaka bosolo te, baye balimbolaka ndoto, babondiska bobele mpamba na lolenge ena nde bangaikaki tambululu bo bampate bazanga mokengeli. 3 Kanda na ngai edasuki na bakengeli ya lolenge ena, mpe bantaba babali nde bazwi etumbu; zambi Yawe na mapinga ayei kotala mpate na ye; libota na Yuda, nakokwa yango bo mpunda na ye nankembo mpo na etumba; 4 Na Yuda nde, libanga na ntina ekobima, na ye nde ekobima sete. Lisus litimbo na etumba; nde lisusu bakambi minene bakobima lisanga. 5 Bokozala bo balongi na etumba, banyataka bayini ba bango bo bosoto o balabala; bakobunda mpo ete Yawe azali na bango; baye bakozala kotambola likolo na mpunda, bakoyokisama nsoni. 6 Nde nakembisi libota na Yuda, mpe nakosikola ndako na Yozefu; nakosukisa bango, zambi nayoki bango mawa, mpe bayeba ete nasundoli bango te, mpo nazali Yawe Nzambe na bango mpe nakoyanola bango. 7 Nde Efalayime akozala bo molongi, mitema na bango ekozwa nsai epesaka vino; bana ba bango ya babali nde bamoni yango mpe bakoyoka esengo, mitema na bango nde esepeli kati na Yawe. 8 Nakobetela bango piololo mpe bakosangana, zambi nasikoli bango, mpe bakofuluka bo kala koleka. 9 Nakopanza bango kati na bikolo, boye na mosika nde babanzi ngai; bakobika elongo na bana na bango; mpe bakozonga lisusu. 10 Nakokumba bango uto mokili na Ezipito, kosakisa bango o mboka Asslya; nakotambola na bango o bamboka Galada kino Libana, mpe etando efanda bango ekokoma moke. 11 Bakokatisa ebale na bwale, bakoluka nkayi na bambonge na ebale na mungwa, mpe bozindo na ebale nde ekokauka; lipombo na mboka Assilya o nse, mpe lokumu na Ezipito nde ekobunga. 12 Yango nalobi; ngai Yawe nakokembisa bango, mpe banso bakotambola o boso na kombo na ngai, elobi Yawe.