MOKAPO 5

1 Sika elenge mwasi, sangisa bituluku, bazingi biso na bibeteli, babeti zuzi na isalaela na litama. 2 Mpe yo, beteleme na efalata, ozali muke kati na yuda wuta na yo, moko akobima pona ngai, ye oyo ako konza esalaele mpe mpe bokonzi na ye ewuta kala kino na bikeke. 3 Tala tina ako sundola bango kino ngonga ba kobota oyo asegeli kobota, mpe bandeko ba tikalaki bakoya pembeni ya bana isalaela. 4 Akomimonisa mpe kokonza na nguya ya yawe na bokonzi ya kombo na yawe, nzambe mpe bako zwa efandelo ya kimia, akokumisama kino suka na mokili. Ye oyo akozongisa kimia. 5 tango asulia akoya na ekolo na biso mpe kokota na bandako na biso tokotombola likolo na ye ba bateli na bampate sambo mpe bana ya bakonzi mwambe. 6 Basalaki na mppanga eliyelo na bibwele ya mboka asulia mpe mboka nini lodi na bikuke na ye ako kangola biso mpe na asulia tango bakoya na mboka na bisi mpe ba kokota na mabele na biso. 7 Ba oyo na isalaele bakoza kati na etuluku na bato lokola londende koweta na yawe, lokolalitanga na mayi ya matiti, bikotalela moto te ekokambama na bana na bato te. 8 Ba oyo ya yakobo bakoza moko ya bikolo kati na bato nzike, lokola nkosi kati na ba nyama na zamba, lokola mwana na kosi, katina na bibwele tango bazole, bako nyata mpe ko panza, mpe moko te akokangola. 9 Tika loboko na yo etelemela bayini na yo mpe banguna na yo nyoso ba kufa. 10 Mokolo wana yawe alobi na koboma kati na yo ba punda na yo mpe na kobebisa makalo na yo. 11 Nako silisa bingumba ya mboka na yo, mpe na kokokwe yisa bibombamelo na bino nyoso. 12 Na maboko na yo na kosilisa misala na soloka na basali na yango. 13 Na ko silisa kati na yo binzambi-nzambi mpe bikeko mpe oko gumbamela bilolo bisalami na mabo te. 14 Na kosilisa katina yo binzambi-nzambi, mpe na kopanza engumba. 15 Na kozongisa mabe na kanda na bikolo oyo ekoyoka ngai te.