<<<<<<< HEAD Mokapo 1 ======= Malako 1 >>>>>>> 7278db960b9e6d4a07d9a6ca56994f761d35290d

1 Awa ebandeli na sango malamu na Yesu-Christu, mwana na Nzambe. 2 Bo ekomami o mokanda mwa mosakoli Isaya; natindi o boso bwa yo mosakoli wa ngai, ye nde akobongisa nzela na yo. 3 Azali mongongo ya moto oyo azali konganga o lisobe ete: Bongisa nzela ya Mokonzi, mpe bosembola bilekeli bia ye. 4 Yoane abimi pwasa, kolakisa bato o lisobe, mpe koteyaka libatisi ya mbongwana, mpo na bolimbisi ya masumu. 5 Etuka mobimba ya Yudea elongo na bayei mboka Yelusalemi, bazalaki kokende epai na ye, kotubela masumu na bango mpe kozwa libatisi. 6 Molato ya Yoane ezalaki bongo mposo ya mpunda ya lisobe mpe mokaba ya mposo ya nyama, mpe azalaki kolia mpasu mpe mafuta ya nzoyi ya nzamba. 7 Mateya na ye azalaki kolobela nguya ya moto akoya sima naye, mpe bozangi nguya epai ne ye, mpo akoki kofungola ata sapato na ye. 8 Ngai nabatisi bino o mai, ye akobatisa bino na molimo mosantu. 9 Eutaki Yesu na Nazareth kokenda Galilea. Abatisamaki na Yoane, na ebale ya Youludani. 10 Sima ya libatisi na ye o ebale Youludani, likolo efungwami mpe Molimo mosantu ayei na ye lokola ebenga 11 mpe mongngo makasi kowuta o mapata, koloba ete: oyo azali mwana na ngai wa bolingo, esengo na ngai 12 Mpe molimo ekumbi ye na lisobe . 13 Asalaki mikolo tuku minei na lisobe, kuna amekamaki na satana, mpe ba mwanze bazalaki nzinga-nzinga na ye, kosenzela ye na nyama ya nzamba. 14 Sima ya bokangami ya Yoane, Yesu akomi o mboka Galilea, mpe abandi kosakola sango malamu ya Nzambe. 15 Nakolobaka: « ngonga ebeti mpo na boyeyi bwa bokonzi bwa likolo. Bobongola mitema mpe bondima sango malamu.» 16 Ezalaki ye koleka pembeni ya mayi ya mboka Galilai, amoni balobi mbisi babale, Simoni na Andele. 17 Yesu alobi bango: «boya mpe bolanda ngai, nakokomisa bino balobi ya bato» 18 Na lombangu basundoli minyama na bango, mpe balandi ye. 19 Ezalaki Yesu kotambola mwa mosika na ebale, amoni Yakobo, mwana na Zebede, elongo na ndeko na ye Yoane, kati na bwato kobongisa minyama. 20 Abiangi bango, na mbisa batiki tata na bango Zebede kati na bwato, elongo na basali, mpe bango balandi ye. 21 Ekomaki ye na Capernawume, o mokolo mwa eyenga, Yesu akendaki na eyanganelo ya bayuda mpe ateyaki. 22 Bato bakamwaki mateya na ye mpo azalaki koteya lokola moto azali na bokonzi kasi lokola bakomi na mibeko te. 23 Bobele na ngonga ena, moto moko azalaki na molimo na mbindo kaki na eyanganelo ya bayuda, angangi makasi 24 koloba boye: «Biso na yo likambo nini? Yesu na Nazarete, oyei mpo obebisa biso? ozali mosantu na Nzambe. 25 Yesu apameli molimo na mbindo ete: Fanda kimia mpe bima kati na yeᵎ» 26 Na mbisa molimo na mbindo ekweisi ye o nse mpe ehami. 27 Bayi mboka batondaki na nsayi, na kokamwa soki mateya etonda bokonzi boye, ewuti waqpi? oyo ekopesa mitindo na milimo mbindo mpe kotosa ye. 28 Bongo sango yango epanzanaki noki o mboka Galilai. 29 Mpe sima ya kobima na ye o eyanganelo ya bayuda, akei o ndako ya Simoni mpe Andele, elongo na Yakobo mpe Yoane. 30 Nzoka nde bokilo na Simoni azalaki kobele mpe balobelaki Yesu na ntina na ye. 31 Bongo Yesu abelemi mpe akwi ye na loboko mpe atelemisi ye ngwi, bokono bosili mpe abandi kosalela bango o ndako. 32 O pokwa yango, bamemeli ye baoyo yonso bazalaki na bokono mpe milimo ya mbindo. 33 Engumba mobimba eyanganaki o ekuke. 34 Abikisi babeli nzike mpe abengani milimo mbindo, kasi alingaki te ete milimo na mbindo koloba, nzambi ayebaki bango. 35 Lokola molili ezaki naino, atelemaki mpe akeyi ye moko o esika ya bobombami, wana nde abondeli. 36 Simoni, elongo na baoyo bazalaki na ye, baluki ye. 37 Ekuti bago ye mpe balobi na ye :« Batu banso bazali koluka yo» 38 Alobi: « tohama, tokenda bingumba nzinga-nzinga, mpo nateya lokola, yango mosala nayeli. 39 Bongo angaikaki Galilai mobimba, koteya o biyanganelo ya bayuda mpe kobengana milimo mbindo o kaki ya bato. 40 Moto na maba moko abelemi na ye, alombi ye mabolongo o nse koloba :« soko okoki kokomisa ngai peto.» 41 Yesu atondisami na mawa, asemboli loboko mpe asimbi ye mpe alobi boye:« Nalingi. koma peto.» 42 Mbala yoko, bokono bwa maba bokei, mpe akomi peto. 43 Yesu akebisi moto ona mpe azongisi ye, 44 na koloba boye: koyebisa moto te, kasi kenda komitalisa epai ya nganga Nzambe, mpe pesa mbeka bo elobi Mose na ntina na kopetolama, lokola litatoli epai na bango. 45 Kasi abandaki koyebisa na moto yonso mpe sango yango epanzani na lolenge ete Yesu akokaki kokota na kimia te na bingumba, mpe afandaki na esika na ye moko, nde bato bazalaki koya apai na ye.