1 Na pesi mitindo oyo liboso na Nzambe mpe Yesu Klisto, oyo akosambisa bato na bomoyi mpe ba kufi, ntina na koya ya bokonzi na ye. 2 Teya liloba, zala ngwi na ntango mpe ntango te. kebisa bango mpe lendisa, teya bango na motema makasi mpe na boboto yonso. 3 Ntango ekoya bato bakolinga mateya solo te. Kasi bakolanda posa ya bango moko, maloba oyo bango moko bakosepela na yango, bakotondisama na koyoka yoka. 4 Bako longolaka matoyi na bango na bosolo, mpe bako baloka epayi ya ba makambo oyo ezalaka te. 5 Kasi yo, zalaka na ekenge na manso, longa mimekano, sala mosala ya koteya, mpe sala yango malamu. 6 Ngayi pe na sali mingi. tango na nga yako zonga ekoki. 7 Nabundi bitumba malamu, nasilisi kotambola bisika nyonso, na silisi nyonso na ngayio; na batelaki kondima na ngayi. 8 Motole ya kondima na epesemeli motole oyo Mokonzi, zuzi ya solo akopesa ngayi na bozongi na ye , na kozala ngayi moko te kasi na baye banso bakomona koya na ye kati na bolingoi. 9 Sala makasi ya oya kotala ngayi na lombango (noki-noki). 10 Po Demas asondoli ngayi. Alingi mokili ya lelo mpe akeyi na Thessalonique. Crescens akeyi na Galati, mpe Tite na Dalmatie. 11 Luka nde aza na ngayi. Zua Marc et boya na ye , mpo aza na motuya mpo na mosala. 12 Natindaki Thychique na Ephèse. 13 Kazaka na ngayi natikaki yango na Troas epa ya Carpus, memela ngayi yango ntangu opkoya mpe mikanga mingi-mingi ba parchemins. 14 Alexandre mosali mabaya, asali makambu mingi ya mabe epayi na ngayi. Akozua mbanu na ye epayi ya Mokonzi kati ya mosala na ye. 15 Bosala keba na ye, mpo aboyi penza maloba na biso. 16 Na ngonga na silisaki kelasi, na monaki ata moto te kosunga ngayi. Nzokande banto nyonso babwakisaki ngayi. Natangeli bango mabunga wana te. 17 Kasi ezalaki Mokonzi nde azalaki na ngayi mpe alendisaki ngayi, na ntina ete mateya elekaki malamu mpe bapangano bayo kaki na bokebi nyonso tango na zalaki koteya , bango na monaki ete na bimi na monoko ya nkosi. 18 Mokonzi akolongola ngayi kati ya misala inso ya mabe, mpe akobikisa ngayi na bokonzi na ye ya likolo nkembo ezala na ye na mbula na mbula, ezala se bongo. 19 Bo pesa Priscille na Aquilas, na libota ya Onesisphore mbote. 20 Eraste atikali na Corinthe, kasi natikaki Trophime mkobela na Milet. 21 Zala nyonso ozonga na ngonga ya elanga. Eubulus apesi bino mbote, Pudens, Linus, Claudia, mpe ba ndeko banso bapesi yo mbote. 22 Mokonzi azala elongo na molimo na yo. Ngolu ezala na yo.